Luke 6

Yesu azali Mokonzi ya mokolo ya saba

(Mt. 12.1-8 ; Mk. 2.23-28)

1Mokolo moko ya saba, Yesu azalaki koleka na kati ya elanga ya ble. Bayekoli na ye babandaki kobuka ble, kolongola yango baposo, mpe kolia.

2Bafarizeo mosusu batunaki :

—Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epekisami kosala na mokolo ya saba ?

3Yesu azongiselaki bango :

—Naino botangi te likambo David asalaki ye na baninga na ye tango bazalaki na nzala ?
4Akotaki na Ndako ya Nzambe, akamataki mampa oyo bapesaki makabo na Nzambe, aliaki yango, mpe apesaki bato oyo bazalaki na ye. Nzokande kaka banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa mpo na kolia yango.

5Yesu alobaki lisusu :

—Mwana ya Moto azali mokonzi ya mokolo ya saba !

(Mt. 12.9-14 ; Mk. 3.1-6)

6Mokolo mosusu ya saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe azalaki koteya. Moto moko azalaki wana azalaki na loboko ya mobali ekufa. 7Balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo bazalaki kotala Yesu malamu-malamu mpo bamona soki akobikisa moto na mokolo ya saba, mpo ete bazwa likambo ya kofundela ye.

8Kasi Yesu ayebaki makambo oyo bazalaki kokanisa. Bongo alobaki na moto oyo akufa loboko :

—Telema, mpe yaka awa liboso ya bato nyonso ! Moto yango atelemaki mpe ayaki wana.

9Bongo Yesu alobaki na bango :

—Nazali kotuna bino, likambo nini epesami ndingisa kosala na mokolo ya saba : kosala malamu to kosala mabe, kobikisa bomoi ya moto to koboma yango ?

10Yesu atalaki bango nyonso moko na moko mpe alobaki na moto oyo akufa loboko :

—Sembola loboko na yo ! Moto yango asalaki bongo, mpe loboko na ye ekomaki malamu.
11Kasi balakisi ya Mibeko mpe bafarizieo batondaki na kanda mpe babandaki koyokana mpo na koluka likambo oyo bakokaki kosala Yesu.

Yesu aponi bapostolo zomi na mibale

(Mt. 19.1-4 ; Mk. 3.13-19)

12Kaka na mikolo wana, Yesu akendaki na ngomba mpo na kobondela, mpe abondelaki Nzambe butu mobimba. 13Tango tongo etanaki, abengaki bayekoli na ye. Bongo aponaki zomi na mibale kati na bango ; baoyo apesaki bango kombo bapostolo : 14Simon, oyo apesaki kombo : Piere, mpe Andele ndeko na ye ; Zaki mpe Jean ; Filipo mpe Batelemi ; 15Matayo mpe Toma ; Zaki mwana ya Alfeo mpe Simon oyo azalaki na lisanga : Zelote
tala Matayo 10.4
 ;
16Yude mwana ya Zaki mpe Yuda Iskariote oyo atekaki Yesu.

Yesu na kati ya bato ebele

(Mt. 4.23-25 ; Mk. 3.7-11)

17Yesu akitaki ngomba elongo na bango, mpe atelemaki esika moko ya polele. Bayekoli na ye ebele penza bazalaki wana elongo na bato mingi penza oyo bawutaki na Yudea mobimba, Yeruzalem, mpe na bamboka ya Tire mpe Sidon oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene. 18Bayaki mpo na koyoka ye mpe koluka kobika na maladi na bango. Bato oyo mpe bazalaki kotungisama na milimo mabe, babikaki. 19Bato nyonso bazalaki koluka kosimba ye, pamba te nguya moko ezalaki kobima na ye, mpe ezalaki kobikisa bango nyonso.

Esengo to mawa

(Mt. 5.1-12)

20Bongo atalaki bayekoli na ye mpe alobaki :

—Esengo na bino baoyo bozali babola, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali ya bino !

21Esengo na bino baoyo bozali na nzala sikʼoyo, pamba te, bokotonda. Esengo na bino baoyo bozali kolela sikʼoyo, pamba te bokoseka.

22Esengo na bino tango bato bakoyina bino, tango bakobengana bino, tango bakofinga bino, mpe tango bokoboya kombo na bino lokola kombo moko ya mabe, mpo na Mwana ya Moto.

23Na mokolo yango bosepela mpe botonda na esengo, mpo lifuti na bino ezali monene penza na Likolo. Pamba te bakoko na bango basalaki mpe baprofeta kaka bongo.

24Kasi mawa na bino bato ya bomengo, pamba te bosi bozwi libondisi na bino.

25Mawa na bino baoyo bozali ya kotonda sikʼoyo, pamba te bokozala na nzala ! Mawa na bino baoyo bozali koseka sikʼoyo, pamba te bokosala matanga mpe bokolela !

26Mawa na bino tango bato nyonso bakoloba malamu mpo na bino, pamba te bakoko na bango mpe basalaki bongo epai ya baprofeta ya lokuta !

Mateya mpo na kolinga banguna

(Mt. 5.38-48)

27—Kasi nalobi boye na bino baoyo bozali koyoka ngai : Bolinga banguna na bino, bosala makambo ya malamu na bato oyo bayinaka bino. 28Bopambola bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na baoyo banyokolaka bino. 29Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye mpe oyo mosusu. Soki moto abotoli kazaka na yo, koboya te mpo azwa mpe simisi na yo. 30Pesa na moto nyonso oyo asengi yo ; mpe soki moto akamati eloko na yo na makasi, kosenga ye azongisela yo yango te.

31Makambo oyo bolingi ete bato basala mpo na bino, bosala yango mpe ndenge moko na bato mosusu. 32Soki bozali kolinga kaka baoyo balingaka bino, lokumu nini bokozwa ? Pamba te bato ya masumu mpe balingaka bato oyo balingaka bango. 33Soki bozali kosala malamu kaka na baoyo basalelaka bino bolamu, lokumu nini bokozwa ? Pamba te bato ya masumu mpe basalaka bongo. 34Soki bodefisaka kaka na baoyo bozali na elikya ete bakoki kozongisela bino, lokumu nini bokozwa ? Pamba te bato ya masumu mpe badefisaka baninga na bango bato ya masumu, mpo bafuta bango nyongo yango.

35Kasi bino, bolinga banguna na bino, bosalela bango bolamu, bodefisa mpe bomituna te soki bakofuta bino nyongo yango ; bongo lifuti na bino ekozala monene penza, mpe bokozala bana ya Ye oyo Aleki likolo ; pamba te Ye azali malamu epai ya bato oyo bazongisaka matondi te, mpe epai ya bato mabe.

36Bozala bato ya mitema mawa, ndenge mpe Tata na bino azali moto ya motema mawa.

(Mt. 7.1-5)

37Bosambisa te, mpe bakosambisa bino te. Bokatela bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te. Bolimbisa baninga na bino, mpe bakolimbisa bino. 38Bopesa, mpe bakopesa bino : bakotia na basaki na bino biloko oyo ekoki penza, oyo bafini malamu, baningisi malamu, mpe oyo ebandi kosopana ; pamba te bakozongisela bino, kaka ndenge bino mpe bopesaka baninga.

39Yesu alobaki na bango lisusu lisapo oyo :

—Boni, moto akufa miso akoki kotambolisa moto mosusu akufa miso ? Bango mibale bakokweya na libulu te ?

40Mwana ya kelasi aleki molakisi na ye te, kasi moto nyonso oyo bateyi malamu penza, akokoma lokola molakisi na ye.

41Mpo na nini ozali kotala mwa lititi moke oyo ezali na liso ya ndeko na yo, mpe ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo ? 42Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : “Ndeko na ngai, tika nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, na tango yo moko ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo. Moto ya kokosana ! longola liboso nzete oyo ezali na liso na yo, bongo nde okomona polele mpo na kolongola mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.

(Mt. 7.16-20)

43Nzete moko te ya malamu ebotaka bambuma ya mabe, mpe nzete moko te ya mabe ebotaka bambuma ya malamu. 44Mpe nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango. Pamba te babukaka bambuma ya figi na banzete ya nzube te, mpe balongolaka bambuma ya vino na banzete ya basende te. 45Moto malamu abimisaka makambo ya malamu oyo ewutaka na bomengo ya malamu ya motema na ye ; mpe moto mabe abimisaka makambo ya mabe oyo ewutaka na bomengo ya mabe ya motema na ye. Pamba te, monoko ya moto elobaka wuta na makambo oyo etondi na motema na ye.

Motongi ndako ya mayele mpe motongi ndako ya zoba

(Mt. 7.24-27)

46Mpo na nini bobengaka ngai “Nkolo ! Nkolo !”, mpe bosalaka te makambo oyo nalobaka ?

47Nakolakisa bino soki moto oyo akoya epai na ngai, oyo akoyoka maloba na ngai mpe akosalela yango, akokani na nani : 48akokani na moto oyo atongaki ndako, mpe atimolaki, atimolaki penza tii na nse, mpe atongaki fondasio likolo ya libanga. Tango mpela eyaki, mayi emibwakaki na makasi nyonso na ndako, kasi ekokaki te kokweyisa yango pamba te etongamaki malamu penza.

49Kasi moto oyo azali koyoka maloba na ngai mpe azali kosalela yango te, akokani na moto oyo atongaki ndako likolo ya mabele, mpe atiaki fondasio te. Tango mayi emibwakaki na makasi nyonso na ndako yango, ekweyaki kaka na tango wana, mpe kobeba na yango ezalaki monene penza.
Copyright information for LinMNB